http://www.kimbanguisme.net http://archives.kimbanguisme.net/fongoDieto/ |
|
"Tata Nzambe salisa biso", cantique pour la paix-2 http://archives.kimbanguisme.net/fongoDieto/viewtopic.php?f=11&t=143 |
Page 1 sur 1 |
Auteur: | Muana na Moto [ 22 Juil 2007 08:44 ] |
Sujet du message: | "Tata Nzambe salisa biso", cantique pour la paix-2 |
"Tata Nzambe salisa biso", cantique pour la paix - Partie 2 CANTIQUE KIMBANGUISTE CHOEUR Tata Nzambe salisa biso, Tata Nzambe salisa biso Na mpasi oyo tokomonaka, longola bandimi banso mposa ya mokili Opesa bango mposa makambo na yo, pamba te bobangi bua nzambe bozali lisusu te Bazali kowela bisengo bia mokili Bazali kobosana bokonzi bua likolo Nionso wana bososoli bozangi biso. SOLO 1 Soki totali na mokanda mua nzambe e Bobangi bua Nzambe ebandeli ya mayele Na tango moto akozangaka bobangi bua Nzambe Tango wana masumu eyelaka ye O O Tata Nzambe limisa biso, o o Tata Nzambe limbisa biso SOLO 2 Soki totali na mokili mobimba a, kimia ezali te Bato bazali kobomana bango na bango Lokola biloko bizangi ntina O Tata Nzambe limbisa biso, o Tata Nzambe salisa biso SOLO 3 Soki totali bato bakoki kobongisa mokili oyo, bobele bandimi Soki bayokani, basangani pe batosi mibeko, kimia ekoyela biso O na ndenge nini na mabondeli, o na ndenge nini na mabondeli SOLO 4 Bazali ebele na mokili i Soki batosa mbele mokili mobonguana Bandimi mingi bazali kosala mabe na baninga na bango pona zuwa Basusu kutu bazali koukfua a, pona nini ? pona lolendo Bandimi bakomi na lokuta lokola bato kutu basambelaka te O o ki mondimi na bango, bati yango wapi O oki mondimi na bango , bati yango wapi SOLO 5 Ya solo Nkolo mokili mosili kobeba Bazui bakolingana bango na bango Ba oyo bazangi bakosala pe lisanga lia bango Bokabuani bokoteli biso O o Tata Nzambe limbisa biso, O o Tata Nzambe limbisa biso SOLO 6 Adamu na Eva bamonaka mpasi te O kati ya elanga ya edeni Lokola batiolaka liloba lia Nkolo Mpai kutu eyelaka bango O lolendo CHOEUR Ekoboma yo SOLO 7 Ata ozalaka moyindo Ata ozalaka mondele Ata ozalaka mobola Ata ozalaka na mbongo Ata ozalaka nani TRADUCTION LIBRE CHOEUR Dieu le p?re viens ? notre secours Dieu le p?re viens ? notre secours Dans les souffrances qui nous accablent Epargne-nous tous les chr?tiens de cet attrait du monde Insuffle plut?t le d?sir de te servir Car la crainte de Dieu n'existe plus Ils se pr?occupent plus des plaisirs mondains Plut?t que de l'acc?s au Royaume celeste Tout cela resulte de notre manque de discernement SOLO 1 Lorsque nous lisons attentivement la bible Il ressort que la crainte de Dieu est le commencement de la sagesse D?s l'instant o? l'homme s'en trouve depourvu C'est justement ? ce moment-l? que les p?ch?s l'assaillent O Dieu le p?re pardonne.....pardonne SOLO 2 Lorsque nous regardons un peu partout dans le monde La paix fait grandement d?faut Les gens ont tendance ? s'entretuer entre eux Comme s'ils ?taient de simples choses sans aucune valeur O Dieu le p?re pardonne... aide-nous SOLO 3 A bien voir, seuls les chretiens peuvent rendre ce monde s?r S'ils s'entendent, s'assemblent et respectent les commandements La paix deviendra plus qu'effective Par quelle proc?d? ? par la pri?re Par quelle proc?d? ? par la pri?re SOLO 4 Nombreux sont les chr?tiens vivant sur terre S'ils obe?ssaient r?ellement, le monde aurait d?j? chang? Jalousie oblige, beaucoup d'entre eux font du mal ? leurs prochains D'autres encore sont entrain de mourir pour cause d'orgueil Ils sont devenus de v?ritables ? l'instar des m?cr?ants Qu'ont-ils donc fait de leur foi ? Qu'ont-ils donc fait de leur foi? SOLO 5 Seigneur c'est vrai que le monde s'est perverti Les riches s'aiment entre eux Et les pauvres ?galement s'organisent entre eux C'est alors que nous sommes divis?s les uns les autres Dieu le p?re pardonne nous...pardonne-nous SOLO 6 Adam et Eve vivaient heureux dans le jardin d'Eden Mais puisqu'ils ont d?daign? l'ordre du seigneur La souffrance s'est abattue sur eux CHOEUR (L'orgeuil) te tuera SOLO 7 Que tu sois noir Que tu sois blanc Que tu sois pauvre Que tu sois riche Quique tu sois N.B: Comme nous l'avions mentionn? plus haut, cette traduction est tout ? fait libre et n'engage en rien une quelconque commission de chants de l'?glise kimbanguiste. Bien entendu, elle n'engage que Muana na Moto. Toutefois, tous ceux qui jugeront n?c?ssaire d'y apporter d'?ventuels correctifs _ si sont libres de le faire et nous les remercions d'avance. A vous tous qui ma?trisez le lingala, n'h?sitez pas d'intrevenir, si besoin. |
Page 1 sur 1 | Heures au format UTC + 1 heure [ Heure d’été ] |
Powered by phpBB © 2000, 2002, 2005, 2007 phpBB Group http://www.phpbb.com/ |