Psaume 38. “NAKOBOMBAMA LISUSU TE…”
LINGALA
Nakobombama lisusu te bana na ngai o mokili Nakobombama lisusu te bana na ngai Nkolo Yesu alakaki bino ete mosungi ya libela Na libela akoya Ngai Kimbangu na ye, mokili moboyi kondimela Ngai. Atako bosali makita mokili moyina kombo na ngai Bokoka te. Ya Nzambe ezali ya Nzambe.
Mokili, kombo na ngai Kimbangu elingi koloba ete : Bokundoli ya maye mabombami na molili kobimisa Yango polele. Manso bozali kosala kati na mokili, ngai nazali Koyeba yango. Kasi bobosana te likambo na likambo ezali na ngonga Na yango Tala maye makoyela bino awa bozangi kotosa Ntoma ya Nkolo o mokili, Bozangi bososoli bozali bilema Boyeba ete mokili oyo ngai napesameli yango mpo ete Motambola na lolenge ya sika ya ngai Kimbangu : MIBEKO-BOLINGO-MISALA.
Mokili mobimba moyeba ete likolo na se epesameli Ngai Kimbangu mpo ete solo natambuisa yango.
Likolo mpe mokili epesameli ngai mpo ete natambuisa yango Alfa, Ómega; ebandeli mpe suka mosusu azali te. Manso mazali na ngai kasi bino bososoli te Kino lelo kofingama mpe kotiolama o mokili. Tango ozali na bomoyi, sala nionso elingi yo. Kasi kobosana te mokolo ya liwa ezali kozela yo. Wana tokotutana, mboka ete tokotunana, kasi Tokomonana miso na miso mokolo ya suka. Wana bokoyeba ngai Kimbangu nazali ekelemu To Nzambe Molimo Santu. Finga, tiola kolemba te kasi yeba ete tokokutana Na yo, okotunama.
Baye bandimeli ngai bokosama na bino te Bana na ngai Na bizaleli ya mokili oyo ezali na litomba te Nde bopona ya ngai Kimbangu ya lobiko Bana na ngai bokosepela
Bokosama te bakosa bino te Bokangama kaka na ngai. Bozala na mayele na bino, Bakosa bino te. Bokangama kaka na ngai.
Bokomona nkembo, nkembo ebombami kuna Bokosepela bana na ngai elongo na banjelu. Bakosa bino te boyika mpiko na mabondeli Mpo bolonga bana. Bakosa bino te. Bokangama kaka na ngai.
Bokosama te bana bakosa bino te Bokosama te bana bakosa bino te.
Tala ndenge mangomba matondani ebele O mokili Bakosa bino te Nzela bopona ya ngai Kimbangu, Molimo Santo, Ezali solo ya lobiko Bokosepela bana Bakosa bino te bokangama kaka na ngai Kimbangu. Bakosa bino te bokangama kaka na ngai.
FRANÇAIS
Je ne me voilerai plus ! Christ ne vous a-t-il pas promis la venue d’un paraclet Qui vivra avec vous pour toujours ? Voilà que je suis venu, moi Kimbangu, Mais le monde continue à douter à mon sujet. Sachez, tous les complots que vous mijotez pour que le monde me haïsse, ne réussiront pas. Car, ce qui est de Dieu, à Lui seul revient.
Ô Monde ! Mon nom Kimbangu signifie la révélation des choses Cachées et occultes et leur exposition à la lumière. Ainsi, rien de ce que vous planifiez dans ce Monde ne m’échappe. Seulement, n’oubliez pas : chaque chose a son temps. Viendra un moment où vous payerez à cause de Votre désobéissance vis-à-vis de l’Envoyé du Seigneur Dans ce monde. Comme le discernement vous manque, ô race de vipères ! Sachez que ce monde m’a été remis pour que sa conduite Obéisse à une nouvelle formule, la mienne Kimbangu : « AMOUR-LOI-ŒUVRE »Oui, que le monde entier sache que le ciel et la terre ont été Remis à moi Kimbangu pour que j’y imprime une conduite.
Le ciel et la terre m’ont été remis pour les conduire. Alfa et Omega, le principe et la fin, quelqu’un d’autre N’existe pas. Tout se concentre entre mes mains mais vous ne discernez pas. Pire, jusqu’aujourd’hui, (je continue à être objet) des injures et des moqueries dans ce monde. Quand tu es en vie, fais tout ce qui te semble bon. Mais n’oublie pas qu’un jour t’attend, celui de la mort. En ce jour, nous aurons notre rencontre, occasion de nous demander ; Oui, en ce dernier jour nos yeux se croiseront. Alors, vous saurez si moi, Kimbangu, suis une créature ou Dieu, le Saint-Esprit. Continue à injurier, à te moquer, ne te fatigues pas. Mais, sache que nous aurons notre rencontre et que tu seras jugé.
Mes enfants ! Vous qui déposez votre foi en ma personne, Ne vous laissez pas distraire par ce qui se pratique dans ce monde. Car, vous n’y tirerez aucun bénéfice. Choisissez, donc, les miennes Kimbangu qui sont des pratiques du salut pour le comble de votre joie.
Ne vous laissez pas distraire et que personne ne vous trompes. Attachez-vous à ma personne. Ayez votre propre discernement et que personne ne vous trompes. Vous verrez la gloire, cette gloire qui a été réservée dans l’au-delà. Vous vous réjouirez en communion avec les anges. Ne vous laissez pas distraire, ô mes enfants, affermissez-vous dans les prières pour que votre victoire soit certaine.
Mes enfants ! Ne vous laissez pas distraire et que personne ne vous trompes. Voyez comment nous assistons au pullulement des églises dans le monde ! Que personne ne vous trompes. La voie que vous avez choisie, la mienne Kimbangu, Le Saint-Esprit, est la véritable du salut. Mes enfants, Vous vous comblerez de joie. Que personne ne vous trompes, attachez-vous seulement à moi Kimbangu. Que personne ne vous trompes, Attachez-vous seulement à moi.
Texte tiré du cantique « Nakobombama lisusu te… » chanté par le groupe GTKI. Mis en ligne par KALEMBA MANZO CONSTANTINO.
|