Psaume 44. “Losambo na ngai…”
LINGALA
E e e, petola ngai tata Motema na ngai napesi nayo opetola yango Nzoto na ngai mobimba napesi nayo Osalela ndenge elingi yo epayi na ngai Longola bijaleli ya mabe epayi na ngai Yo tonda yo molimo mosantu epayi na ngai
Losambo na nga, yoka yango tata Kotiya ngai mokongo te nabeleli yo Longola mabe manso, opetola nga Nasalela na a bosembo na elanga nayo Nasepelisa yo nzambe na ngai kino suka
O yamba ngai, o yamba ngai, kotika ngai te Nayeli yo okotisa ngai na motema na yo enkolo
Nasalaki mabe mingi epayi nayo olimbisa ngai Nalingi lisusu bongo te ya kosalisa nga Makasi na ngai ejali moke Simba nga lokolo, nalonga moyini satana pe na mabe naye
FRANçAIS
Ô mon Dieu, Purifie-moi ! Je remets entre tes mains mon cœur Purifie-le ! Je remets entre tes mains tout mon corps, Sert-toi de moi comme bon te semble ! Délivre-moi de tout péché ! Toi qui es Esprit, répand-toi en moi.
Ma prière, ô mon Dieu, Exauce-le ! Ne détourne pas ton regard de moi, je te supplie ! Que je sois délivré de tout péché, Ô purifie-moi ! Que je puisse dignement servir dans ton œuvre ! Que je devienne une source de joie pour Toi jusqu’à la fin.
Me voici dans Tes bras, ne m’abandonne pas ! Je me remets entre Tes mains, Seigneur, trouve-moi une place dans Ton cœur ! Je suis conscient d’avoir beaucoup Transgressé devant Toi. Pardonne-moi, Seigneur ! Je voudrais bien en finir avec cette vie-là. Seigneur, aide-moi pour y arriver. Ma force s’évanouit ! Seigneur, affermis-moi, Pour que je puisse me libérer de Satan et de son emprise.
Texte tiré du cantique « Losambo na ngai… » chanté par la chorale CHOREKI. Mis en ligne par KALEMBA MANZO CONSTANTINO.
|