http://www.kimbanguisme.net http://archives.kimbanguisme.net/fongoDieto/ |
|
Psaume 67. "CONGO, MBOKA MONENE..." http://archives.kimbanguisme.net/fongoDieto/viewtopic.php?f=11&t=338 |
Page 1 sur 1 |
Auteur: | Kalemba Manzo Constantino [ 22 Fév 2011 23:22 ] |
Sujet du message: | Psaume 67. "CONGO, MBOKA MONENE..." |
Psaume67. « Congo, mboka monene… » LINGALA Congo, mboka monene Mokili mobimba moyebi yango. Mabota mazali kotalela Ndenge bokonzi bokotelema Nzambe apesi mokongo Atali o mboka Congo Ah ! Poso moindo mayele te. Moyindo akoki kondima eloko Ya moninga moindo te Soki mondele asali akozua yango Lokola ya ye Nzambe azongeli bango Kasi tembe ezali na bango. Zela, zela ezangisi bango mapamboli. Koseka, seka na bango Ezangisi bango mayele ya lola. Refrain Mboka Congo, eyebano o likolo; Mboka bankoko bamonelaki pasi. Na likambo oyo, ebonguani lelo Efandelo ya Nzambe Tobengi yo, Nkolo ! Tobengi yo Tobengi yo, yaaaaaka okata likambo oyo. Solo 1. Tala mokili mobimba mabota mazali na pasi Lokola bino te Solo loposo loindo lozali na etumbu ! Solo 2 Biso mindele na eseng baindo se na pasi Kolia pasi, kovanda kutu kotambola pasi. Solo 3. Bato kotiela Kimbangu lolendo Bakomi libota ya Bonzambe Kasi bango moko, basosolaka te- FRANÇAIS Congo, un grand pays ! C’est connu de tout le monde. Les nations accompagnent son évolution Pour s’assurer sur celui qui tiendra les rennes de son pouvoir. Dieu nous a tourné le dos et fixe désormais son regard sur le Congo. Ah ! Comme le Noir est naïf ! Le Noir n’apprécie jamais favorablement c’est qu’un autre noir a fait. Mais si l’œuvre vient d’un Blanc, le voilà se précipiter Pour s’en approprier ! Dieu est revenu parmi eux mais le doute persiste en leur sein. En renvoyant toujours aux calendes grecques, voilà pourquoi les Bénédictions leur échappent ; En prenant tout à la légère, ils se font priver de la sagesse divine. Refrain Congo, un pays connu jusqu’au ciel ! Oui, un pays marqué par la souffrance des ancêtres ! Par ce fait, il est devenu le trône de Dieu. Nous te convions, Seigneur ! Oui, Nous te convions ! Nous te convions pour prononcer ta sentence ! Solo 1. Observez bien dans le monde si vous allez trouvez Des nations comme vous ! Oui, on sent toujours la punition chez les Noirs ! Solo 2. Nous autres Blancs dans la jouissance ! Mais, voilà les Noirs comme ils souffrent : Difficilement ils mangent, ils n’ont pas de Conditions de vie et moins encore de se déplacer. Solo 3. Ceux-là qui se donnent trop d’importance devant Kimbangu, Les voilà aussi devenir le peuple d’alliance ! Oh les Noirs, comme ils ne discernent pas ! Texte tiré du Cantique « Congo, mboka monene… » chanté par le groupe GTKI. Mis en ligne par KALEMBA MANZO CONSTANTINO. Vous pouvez visualisez le vidéo produit à cet effet en suivant ce lien : http://www.youtube.com/watch?v=6jWQS2Ny2rU |
Page 1 sur 1 | Heures au format UTC + 1 heure [ Heure d’été ] |
Powered by phpBB © 2000, 2002, 2005, 2007 phpBB Group http://www.phpbb.com/ |