Psaume 72. « Ozali kofinga ngai zoba… »
LINGALA
Ozali kofinga ngai zoba Mpo ete nandimeli Ntoma na Yesu Kimbangu ye nde mosikoli na ngai Mayele ya bomoto ekosi yo
Mayele oyo ozali komikumisa Ezali ya mikili mia poto Mondele kutu andimi Nzambe Kimbangu Na yo na ye nani aleki loba
E E E Moyindo lamuka na pongi Elamba ya moyindo bazipa yo na miso Mpo ete omona te mama ya likambo Epesameli yo
Kimbangu abengi yo olanda ye mpo obika Kasi oboyi kondimela ye Zela, zela e e, oyo ekoyela oyo Mokolo wana okondima ye Molimo Mosantu otiolaki.
Olobi na ngai na ya epayi na yo lobiko ezali E E ozali komikosa ndeko na ngai Olobi lisusu nafukamela yo litomba ezali E E ozali komikosa ndeko na ngai
Lobiko otiaka na mitu ya bato Ekomema yo mboka liwa Kuna okololela a, okoganga a Mpasi minioko ekolekela yo Okoluka Molimo Mosantu aya kosalisa yo Okolela. Lela, lela mpe okoganga Okolela a, okoganga Okolela a, okoganga
Mpasi minioko ekolekela yo Okoluka Kimbangu asalisa yo Lela, lela, lela a okolela ndeko Okolela a, okoganga. Okolela a, okoganga.
Okolela, okoganga ndeko, Okoluka moto akosalisa yo Lela, lela, lela a okolela a
Okolela a, okoganga Okolela a, okoganga.
Français
Tu me traites d’imbécile Parce j’ai ouvert mon cœur à Kimbangu, L’Envoyé du Christ ; Oui, mon rédempteur. Ô comme ton savoir t’engouffre !
Cette instruction qui fait ta vanité, Est produit à partir des schèmes occidentaux. Et pourtant, l’Homme blanc accepte la divinité de Kimbangu. Entre lui (pour qui les schèmes ont été produits) et Toi, Qui est le privilégié ?
Ô Noir, réveilles-toi ! Un bandeau noir a été placé pour couvrir tes yeux Afin que tu ne te rendes pas compte de l’ampleur De la mission qui est la sienne.
Kimbangu te convie à le suivre pour ainsi sauver Ta vie mais tu refuses son appel. Attends ! Ce qui va t’arriver ce jour-là, Te contraindra à admettre que c’est lui Le Saint-Esprit dont tu te moquais.
Tu me convies à te suivre, me promettant aussi le salut ! Ô mon frère, tu te trompes ! Tu me convies aussi à se prosterner devant toi, me promettant une récompense ! Ô mon frère, tu te trompes ! La main que tu étends sur la tête des gens te conduira à la mort. Là, il n y aura que des pleurs et des cris ; (Car), la souffrance et les tortures seront outre mesures. Tu en appelleras au Saint-Esprit pour te venir en aide. Tes pleurs seront sans limites tout comme tes cris. Oui, tu pleureras jusqu’à sangloter.
La souffrance et les tortures seront outre mesures. Tu en appelleras à Kimbangu pour te venir en aide. Il n’y aura que pleurs et pleurs. Ô mon frère, tu pleureras. Oui, tu pleureras jusqu’à sangloter.
Tu pleureras jusqu’à sangloter. Tu voudras bien que quelqu’un vienne à ton secours. Il n’y aura que pleurs et pleurs. Oui, tu pleureras. Oui, tu pleureras jusqu’à sangloter.
Texte tiré du cantique « Ozali kofinga ngai zoba » chanté par le groupe GGKI et mis en ligne par KALEMBA MANZO CONSTANTINO.
|