*** Index du Forum ***

Site Internet d'information sur l'Envoyé de Jésus Christ, Simon Kimbangu, et son oeuvre.
Nous sommes le 29 Mar 2024 03:26

Heures au format UTC + 1 heure [ Heure d’été ]




Poster un nouveau sujet Répondre au sujet  [ 1 message ] 
Auteur Message
 Sujet du message: Psaume 92. « Ô libota na ngai mawa… »
MessagePosté: 20 Déc 2011 02:22 
Hors ligne

Inscription: 03 Déc 2005 19:23
Messages: 138
Psaume 92. « Ô libota na ngai mawa… »

Lingala
Ô libota na ngai mawa!
Ô libota na ngai mawa, libota na ngai ya moindo oyo
Ô libota na ngai mawa!

Satana atelemeli yango, azali koniokola bato ya Tata na ngai mawa!
Satana atelemeli yango, azali kokosa kosa bato ya tata na ngai mawa!
Satana atelemeli yango, azali kopesa kindoki, kisi pe magie pe mawa !

Botala bijeleli oyo bino bato bojali na yango
Botala makambo oyo bokomi kosala na molili
Suka na bino, suka na bino bokomona tango kanda ya Nzambe ekobeta,
Nani akobika.

Boyoka ngai a a a a
Boyoka ngai a a ngai Diangienda
Boyoka ngai a a bino bato ya mabe
Boyoka ngai a a bino bato na kindoki
Boyoka ngai bino babomi ya bato
Tango kanda ya Nzambe ekobeta nani akobika

Bino bozali kobongola bato bakoma baniama ya zamba
Bino bozali kobongola bato bakoma bambisi ya mayi
Bino bozali kozuwa mayele ya bato kotiya yango na bisika bizangi ntina
A a bana

Bokeba, bana bokeba
Mpona nini bozanga mawa.

Na mituka, milimo mya bato mivandi kuna a bana , pona nini bino bozanga mawa
Na masuwa, milimo mya bato mivandi kuna a bana, pona nini bino bozanga mawa
Na ba mpepo, milimo mya bato mivandi kuna a bana, pona nini bino bozanga mawa.

Boyoka ngai a a a a
Boyoka ngai a a ngai Diangienda
Boyoka ngai a a bino bato ya mabe
Boyoka ngai a a bini bato na kindoki
Boyoka ngai bino babomi ya bato.

Tango kanda ya Tata ekopela moto, putulu ekomata makala makotikala.

Français

Ô mon peuple, c’est pitié !
Oui mon peuple, la race noire, inspire pitié !

Satan persiste à l’assujetir au point que les élus de mon Père pâtissent sous ses bottes. C’est pitié !
Satan persiste à l’assujetir qu’il trompe les élus de mon Père. C’est pitié!
Satan pesiste à l’assujetir qu’il propage la sorcellerie, les fétiches et la magie. C’est pitié !
Examinez les comportements que vous affichez,
Examinez les actes que vous posez en cachette,
En fin de compte, quand sonnera la trompette de Dieu,
Vous verez qui sera sauvé.

Ecoutez-moi !
Oui, écoutez-moi Diangienda ;
Oui, écoutez-moi, vous les malfaiteurs ;
Oui, écoutez-moi, vous les sorciers ;
Oui, écoutez-moi, vous les meurtriers ;
Quand sonnera la trompette de Dieu, qui sera sauvé ?

Vous qui transformez les gens en bêtes sauvages ;
Vous qui transformez les gens en poissons ;
Vous qui retirez l’intelligence à des personnes pour la placer
Dans des endroits sans valeur ;

Ah, Bien-aimés, faites attention !
Oui, tenez-vous à vos gardes !
Ô comment expliquez-vous votre insensibilité !

Dans des véhicules, des esprits humains y sont prisonniers ;
Ah bien aimés, comment expliquez-vous votre insensibilité ?

Dans des bateaux, des esprits humains y sont prisonniers ;
Ah bien aimés, comment expliquez-vous votre insensibilité ?

Dans des avions, des esprits humains y sont prisonniers ;
Ah bien aimés, comment expliquez-vous votre insensibilité ?

Ecoutez-moi !
Oui, écoutez-moi Diangienda ;
Oui, écoutez-moi, vous les malfaiteurs ;
Oui, écoutez-moi, vous les sorciers ;
Oui, écoutez-moi, vous les meurtriers ;

Quand Dieu s’enflammera dans sa colère, les cendres s’élèveront
Tandis que les braises resteront.

Texte tiré du cantique « ô libota na ngai mawa… » chanté par le groupe GTKI. Mis en ligne par KALEMBA MANZO CONSTANTINO. Clique sur ce lien pour visualiser :
http://youtu.be/Q6EcRc9r3i4


Haut
 Profil  
 
Afficher les messages postés depuis:  Trier par  
Poster un nouveau sujet Répondre au sujet  [ 1 message ] 

Heures au format UTC + 1 heure [ Heure d’été ]


Qui est en ligne

Utilisateurs parcourant ce forum: Aucun utilisateur enregistré et 63 invités


Vous ne pouvez pas poster de nouveaux sujets
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets
Vous ne pouvez pas éditer vos messages
Vous ne pouvez pas supprimer vos messages
Vous ne pouvez pas joindre des fichiers

Rechercher:
Aller à:  
cron
Powered by phpBB © 2000, 2002, 2005, 2007 phpBB Group
Traduction par: phpBB-fr.com