http://www.kimbanguisme.net
http://archives.kimbanguisme.net/fongoDieto/

Psaume 104. "Nionso ekomonana puasa na polele ya Kimbangu"
http://archives.kimbanguisme.net/fongoDieto/viewtopic.php?f=11&t=411
Page 1 sur 1

Auteur:  Kalemba Manzo Constantino [ 06 Aoû 2012 15:48 ]
Sujet du message:  Psaume 104. "Nionso ekomonana puasa na polele ya Kimbangu"

Psaume 104. « Nionso ekomonana puasa na polele ya Kimbangu »

Lingala

Polele engengi mpenza
Mabombami manso ma kundolami mamonami polele
Na se ya mayi na se ya mabele na kati ya libanga ekomonana
Ba nganga kisi banso ba komonana
Bondoki mpe misala nyoso ya mabe ekomonana pwasa aaaa.

Engengi na mabota na ba mboka nyoso
Mpe na mabombami bipayi bimonani na miso te.
Milimo mia mabe ya mindele mpe ya baindo nyoso ekoyebana
Ata na mapata nyoso ekomonana mosika koleka
Mabele mapata nyoso ekoyebana pwasa ahaha

Engengi na molili, etomboli molili polele elongi
Mabombamami makundolami mamonani polele
Na se ya mayi, na se mabele, na kati ya libanga ekomonana

Ekotisa Satana na banzoto ya bato nionso ekomonana, ebima
Ekotisa Satana na bandako ya bato nionso ekomonana puasa
Ebima na yango

Mabunga na bizaleli ya mabe
Koloka bato mpe kokanga misala na bango
Babala te mpe babota mpe te
Makita oyo bavandaka tika ete nionso eyebana
Bavandela yango na se ya mayi nionso ekoyebana
Nguya ya Tata Kimbangu ekoningisa bango
Polele emonana

Polele engengi mpenza
Mabombami manso ma kundolami mamonami polele
Na se ya mayi na se ya mabele na kati ya libanga ekomonana
Baye babombamaka banso bakomonana
Batekaka milimo ya bato banso bakomonana na miso ya bato nionso
Soni ekozua bango.

Engengi na mabota na ba mboka nyoso
Mpe na mabombami bipayi bimonani na miso te.
Milimo mia mabe ya mindele mpe ya baindo nyoso ekoyebana

Ata na se ya mitema banso bakoyebana
Baye babomaka baninga na poison mpe bakoyebana
Na miso ya bato nionso soni ekozua bango

Molili emikumisaki mingi kati na bikelamu ya Nzambe
Ekanisaki ekoleka nguya ya Polele
Na se ya mabele na kati ya libanga ekomonana
Banganga bakomi basakoli, babombami na kombo ya Yesu
Babosani Kimbangu Molimo Santu aye kokundola manso
Mamonana polele eee

Na mokili mobimba polele ekoteli na makasi. Elakisi manso mabombami
Baboloko nionso ya Satana ekofonguama
Bakangela yango bisika nionso ekofonguama
Nguya mpe makasi ya Kimbangu ekomonana na miso ya mokili mobimba

Polele engengi mpenza
Mabombami manso ma kundolami mamonami polele
Na se ya mayi na se ya mabele na kati ya libanga ekomonana
Ba nganga kisi banso ba komonana bondoki mpe misala nyoso ya mabe ekomonana pwasa aaaa.

Engengi na mabota na ba mboka nyoso
Mpe na mabombami bipayi bimonani na miso te.
Milimo mia mabe ya mindele mpe ya baindo nyoso ekoyebana
Ata na mapata nyoso ekomonana mosika koleka
Mabele mapata nyoso ekoyebana pwasa ahaha



Kimbangu polele ngenga ahaha na mabota na biso
Bimisa banso bazali kotiya mobulu na mabota nyoso.
Bazanga ebombamelo ba monana polele
Bazanga ebombamelo ba monana polele
Pwasa ahaha ahaha
Kimbangu polele ngenga na mokili
O fongola milimo mi kanga satana na bisika binso

Na ba zamba papa kot’ofongola
Na se ya mabele papa kot’ofongola
Nase ya mayi kende kot’ofongola.
Kangola mabombami ya molili.
Ma monana polele

Nzambe e Kimbangu tala tala ahaha
Nzambe e Kimbangu tala tala ahaha
Nzambe e Kimbangu tala tala ahaha
Nzambe e Kimbangu tala tala ahaha

Nzambe e Kimbangu lakisa polele, kimia ya mokili
Nzambe e Kimbangu lakisa polele, kimia ya mokili
Nzambe e Kimbangu lakisa polele, kimia ya mokili
Nzambe e Kimbangu lakisa polele, kimia ya mokili


Nzambe e Kimbangu zua lokumu na yo
Nzambe e Kimbangu zua lokumu na yo
Nzambe e Kimbangu zua lokumu na yo
Nzambe e Kimbangu zua lokumu na yo


Nzambe e Kimbangu, azala na se ya matambi na yo
Nzambe e Kimbangu, azala na se ya matambi na yo
Nzambe e Kimbangu, azala na se ya matambi na yo
Nzambe e Kimbangu, azala na se ya matambi na yo


Français

La voile vient de tomber.
Tous les mystères sont mis à découvert
Tant sous les eaux, sous la terre qu’enfouis dans une pierre !

Tous les féticheurs seront dévoilés.
La sorcellerie et toutes les pratiques occultes seront observées
A l’œil nu !

Cette révélation concerne toutes les familles, tous les pays et
Tous les cercles qui évoluent en dehors du visible.
Les esprits mauvais qu’ils soient Blancs ou Noirs, tous, seront dévoilés !
Même enfoui dans les nuages, tout sera mis à découvert.
Aussi loin qu’enfoui sous la terre ou dans les nuages, tout
Sera perçu à l’œil nu !

Il brille dans l’obscurité.
Oui, la lumière met à nu la face de l’obscurité !
Tous les mystères sont mis à découvert
Tant sous les eaux, sous la terre qu’enfouis dans une pierre !

Les envoûtements que Satan s’est permis d’exercer sur les corps humains
Seront mis à découvert et retirés,
Les envoûtements que Satan s’est permis d’exercer sur les foyers
Seront mis à découvert et retirés.

Les mauvaises pratiques et manquements tels ensorceller ou emprisonner
Les capacités des gens en leur niant l’accès au mariage ou à la progéniture ;
Qu’il soit mis à découvert toutes ces assises qu’ils tiennent.
Mêmes s’ils sont tenus sous les eaux, que tout soit dévoilé !
Oui, ils seront sécoués par la puissance de papa Kimbangu pour la lumière soit faite !


La voile vient de tomber.
Tous les mystères sont mis à découvert
Tant sous les eaux, sous la terre qu’enfouis dans une pierre !

Tous se qui se déguisent, seront mis à découvert.
Tous ceux qui font le trafic des âmes seront connus de tous
Et seront couverts de honte !

Cette révélation concerne toutes les familles, tous les pays et
Tous les cercles qui évoluent en dehors du visible.
Les esprits mauvais qu’ils soient Blancs ou Noirs, tous, seront dévoilés !
Même planifié au fond du cœur, ils seront connus !
Ceux qui tuent aussi par le poison, seront connus de tous et couverts de honte !

Le monde occulte s’est toujours glorifié pour avoir longtemps tenu prisonniers
Les créatures de Dieu. Il croyait pouvoir supplanter le pouvoir de la lumière.
Or, tant sous la terre qu’enfoui dans une pierre, tout sera dévoilé !

Les féticheurs sont devenus des prophètes. Ils se sont cachés sous le nom de Jésus oubliant que Kimbangu, le Saint-Esprit, est venu pour tout révéler afin que tout soit exposé à la lumière.

Sur toute la face du monde, la lumière brille dans tout son éclat.
Il met à nu tout ce qui est caché.
Toutes les prisons de Satan seront ouvertes.
D’où que cela fut cloitré, tout sera libéré !
La puissance et la force de Kimbangu sera senti partout dans le monde.

La voile vient de tomber.
Tous les mystères sont mis à découvert
Tant sous les eaux, sous la terre qu’enfouis dans une pierre !

Tous les féticheurs seront dévoilés.
La sorcellerie et toutes les pratiques occultes seront observées
A l’œil nu !

Cette révélation concerne toutes les familles, tous les pays et
Tous les cercles qui évoluent en dehors du visible.
Les esprits mauvais qu’ils soient Blancs ou Noirs, tous, seront dévoilés !
Même enfoui dans les nuages, tout sera mis à découvert.
Aussi loin qu’enfoui sous la terre ou dans les nuages, tout
Sera perçu à l’œil nu !

Kimbangu, la lumière :
Brille dans nos familles !
Chasse tous ceux qui sément la confusion dans toutes les familles !
Qu’ils n’aient plus de refuge et soient perçus à l’œil nu !

Kimbangu, la lumière :
Brille dans le monde !
Libère tous les esprits que Satan a fait prisonniers partout :
- dans les forêts, vas-y Père pour ouvir ;
- Sous la terre, vas-y Père pour ouvrir ;
- Sous les eaux, vas-y Père pour ouvrir.

Dévoile tous les mystères du monde occulte afin quils soient
Perçus à l’œil nu.

Ô Dieu Kimbangu, daigne incliner Ton regard !
Ô Dieu Kimbangu, daigne incliner Ton regard !
Ô Dieu Kimbangu, daigne incliner Ton regard !
Ô Dieu Kimbangu, daigne incliner Ton regard !

Ô Dieu Kimbangu, daigne respendir la lumière, la paix du monde !
Ô Dieu Kimbangu, daigne respendir la lumière, la paix du monde !
Ô Dieu Kimbangu, daigne respendir la lumière, la paix du monde !
Ô Dieu Kimbangu, daigne respendir la lumière, la paix du monde !

Ô Dieu Kimbangu, que la gloire Te revienne !
Ô Dieu Kimbangu, que la gloire Te revienne !
Ô Dieu Kimbangu, que la gloire Te revienne !
Ô Dieu Kimbangu, que la gloire Te revienne !

Ô Dieu Kimbangu, qu’il soit sous Tes pieds !
Ô Dieu Kimbangu, qu’il soit sous Tes pieds !
Ô Dieu Kimbangu, qu’il soit sous Tes pieds !
Ô Dieu Kimbangu, qu’il soit sous Tes pieds !

Texte tiré du cantique « la délivrance » capté par Maman Clément Nsitulomba et chanté par la chorale CHOREKI. Mis en ligne par KALEMBA MANZO CONSTANTINO en collaboration avec papa AUBIN BAMBALE WAWINA. Cliquez sur ce lien pour le video allusif : http://youtu.be/d_-i4eui-CQ

Page 1 sur 1 Heures au format UTC + 1 heure [ Heure d’été ]
Powered by phpBB © 2000, 2002, 2005, 2007 phpBB Group
http://www.phpbb.com/