Psaume 112. « Congo, ndako ya Kimbangu; Afrika lopango na ye… »
Lingala
Congo sosola Nzambe na yo Kimbangu
Monene na yo emonana o mokili
O Mokili ozali muinda
Lisusu elikia ya Afilika
Refrain
Tango ebelemi nguya ya Nzambe elingi komonana
Kati na Congo, bokonzi ya Nzambe elingi kotelema
Muinda mongengela mokili mobimba pe Afilika,
Mboka ya elaka
Congo sosola,
Congo sosola Nzambe na yo
Kimbangu akosalisa yo Congo
Congo sosola,
Congo sosola Nzambe na yo
Kimbangu akosunga yo Congo
Congo sosola Nzambe na yo Kimbangu
Congo sosola Nzambe na yo Kimbangu
Congo sosola Nzambe na yo Kimbangu
Congo sosola Nzambe na yo Kimbangu
Solo 1:
Tango ebelemi Congo sosola Nzambe na yo Kimbangu a Congo
Po ete kimia epesamela yo Congo e
Nzambe azali kati na yo Congo e
Nkolo azali kati na yo Congo e
Molimo Santu azali kati na yo e Congo e
Sosola Kimbangu
E Congo, sosola Nzambe na yo
E Congo, sosola Nzambe na yo
E Congo, sosola Nzambe na yo
E Congo, sosola Nzambe na yo
Solo 2 :
Nkolo alakaki bino mosungi ya libela akoya o mokili
Lelo amonani kati na poso ya baindo, Kimbangu
Congo ezali ndaku na ye, Afilika ezali lopango na ye
Kasi bozali kaka kondimela te
Pasi na yo ekosila mokolo nini Congo
Awa ozali kaka kofinga, kotiola
Kimia na yo nani akopesa yango Congo
Kobomana, bitumba, nzala, maladi, kufa, kosuana, kowelana.
Awa Congo ezali mboka ya Nzambe, sosola
E Congo e, Congo e, Congo e
Tango ebelemi sosola Kimbangu
E Congo e, Congo e, Congo e
Ngonga ebelemi sosola Kimbangu
Français
Congo découvre Ton Dieu, Kimbangu
Pour que se manifeste dans le monde ta grandeur.
Tu es la lumière du monde aussi, l’espoir de l’Afrique.
Refrain
Le moment est proche où l’iminence de la manifestation de la puissance de Dieu s’annonce.
Oui, au Congo, Dieu voudrait bien asseoir son royaume ;
Jaillira une lumière qui iluminera le monde entier
Et l’Afrique, sa terre d’élection !
Congo, discerne !
Oui, discerne Ton Dieu Kimbangu qui est prêt à te venir en aide.
Congo, discerne !
Oui, discerne ton Dieu Kimbangu qui est prêt à te secourir.
Congo découvre ton Dieu Kimbangu !
Congo discerne ton Dieu Kimbangu !
Congo découvre ton Dieu Kimbangu !
Congo discerne ton Dieu Kimbangu !
Solo 1
Le moment est proche,
Congo découvre Ton Dieu Kimbangu, ô Congo :
Pour qu’il te soit accordée la paix,
Dieu (le Père) vit dans ton milieu,
Le Seigneur vit dans ton milieu,
Le Saint-Esprit vit dans ton milieu.
O Congo, découvre Kimbangu !
Congo découvre ton Dieu Kimbangu !
Congo discerne ton Dieu Kimbangu !
Congo découvre ton Dieu Kimbangu !
Congo discerne ton Dieu Kimbangu !
Solo 2 :
Le Seigneur vous a promis d’envoyer un paraclet
Qui viendra dans le monde pour toujours.
Aujourd’hui, il s’est révélé parmi les Noirs.
C’est Kimbangu !
Le Congo, c’est sa maison et l’Afrique, sa parcelle.
Mais vous n’y croyez pas.
Quand est-ce ta souffrance viendra à bout maitenant
Que tu ne t’adonnes qu’aux injures et aux moqueries ?
Ta paix qui l’accordera, ô Congo ?
Tueries, guerres, famine, maladies, mort, disputes, luttes de pouvoir ;
Et pourtant, le Congo est le pays de Dieu !
Oui, Congo !
Le moment est venu, découvre Kimbangu !
Oui, Congo !
L’heure est proche, discerne Kimbangu !
Texte tiré du cantique « Congo sosola Kimbangu » chanté le groupe GTKI. Mis en ligne par KALEMBA MANZO CONSTANTINO. Cliquer sur ce lien pour visionner :
http://youtu.be/2q1lCZFUmUU