Accueil Kimbanguisme Théologie Histoire Nkamba, la nouvelle Jérusalem Simon Kimbangu Bibliothèque Déportation A propos de ce site
 
 
 
Bibliothèque
Messages et prières de chefs Spirituels


03.10.2013, Nkamba : Message de S.E. Simon Kimbangu Kiangani
Source : RATELKI EUROPE

Le 3 octobre 1921 ndenge l'Etat azuaka mesure, Tata SIMON KIMBANGU akomi condamner à mort. Esalaki pasi, kasi ndenge bayokanaki na NKOLO YESU, ye aboyaki te andimaki.
Pona biso loposo muindo tobika.

Ezali date topesaka na ba Dirigeants. Chorale des Dirigeants tomati biso nionso pona kokumisa mokoyo ya lelo.

Na 2011 oyo esalamaki na Mbanza-Ngungu, kobima ya Tata Simon KIMBA NGU na boloko. Chorale des Dirigeants bomataka mingi. Revision ya Proces, bosalaki musala , topesaki merci mingi
pamba te le 3 octobre condamner à mort, le 3 octobre 1951, le 4 nde abimaki.

Na 1951, le 3 octobre 30 ans na ye asilisaki ndenge bayokanaki na NKOLO YESU. Le 4 ye abimaki na boloko. Ye alobi ndaku wana nakozonga lisusu te ! Kasi oyo ekangamaki na Mbanza-Ngungu,
ndenge alobaki « ekangamaki na Mbanza-Ngungu ekofonguama pe na Mbanza-Ngungu ».
ezalaki programme basalaki. Revision ya Proces esalemi, etamboli. Likambo ango elingaki esalema na Kinshasa, nga nalobi te kaka na Mbanza-Ngungu. Le 4 ayokelaki biso ke tokokisaki mokano, bilaka ekokanaki. Banda tangu wana toza kaka kotonga Yeluselemi.

Lelo likambu moko tomoni. Likambu yango biso ba Kimbanguiste tosalelaka yango te eza mukolo na biso ya mabondeli, ezali fete.
Eza na Tata moko, mukonzi munene ! Mutu muindu te kasi mundele. Ye na chauffeur na ye babandi kotambola, ye alobi course ya muke kaka tosala. Patron pona nini ? Te likambo ezali te !
Patron est ce que oza malade ? Naza malade te ! Course ango esalemi, bazongi na ndaku.
Alobi na chauffeur ndenge totamboli na ngayi eza na likambu mususu nakotinda yo pona kolia. Kende kosomba biloko oya na yango, yango nde tokosalela. Chauffeur akeyi, azongi. Eh patron nazomona clair te ! Namoni ndeti oza malade. Te malade ezali te ! Chauffeur a focer, a forcer, a forcer. Ye alobi eh yo oyebi mukolo ya le 28 ? nayebi yango. Oza Kimbanguiste ? Oui naza Kimbanguiste . Hein nakosala te, eza mukolo munene,oyo esalamaka eza kitoko, munene. Yango wana namoni ke hein hein Naza mundele,naza Kimbanguiste te kasi ngayi nakosala te lelo.
Tala kondima ya ndenge wana na likambo ndenge eza kotambola. Po ete mutu na mutu asosola
TATA SIMON KIMBANGU azali nani ? Amonaki pasi pona ba nani ? Mokili ezali kososola, yango tolobi Chorale des Dirigeants tosala musala ndenge mokonzi na bino alobi pe batu wana tangu bakoyela biso awa , bakonzi minene minene minene, kolalisa koliesa, makambu nionso na mutu na biso.

Toyaka pona kosakana te kasi oyo elobamaka na 1921 ke mbongo na ngayi batu, batu nde bakotonga lingomba. Biso toye pona kotonga lingomba. Tosala mosala oyo ekomonana .
Nga nayebaki yango que batu ya ndenge wana babandi koyeba likambu ya TATA SIMON KIMBANGU ndenge nango, bayebi histoire. 1921, le 3 octobre, boloko ya liwa, 1951 le 3 octobre 30 ans ya TATA SIMON KIMBANGU. Na tangu wana, le 4, ye alobi nakozonga lisusu na ndaku wana te ! Ba forcer ye zonga ! Ye alobi te ! Nakozonga te ! Kino pe kaka na 1951, na sanza yango pe le 12 octobre atiki biso. Maye tovandeli, maye toyeli, pona kotonga Yeluselemi. Tosimba likambu wana .

Topesi merci mingi na ndenge bomati ebele, toyebi ke musala ekosalema.
Tosilisi na kombo ya TATA, MUANA, pe TATA MOLIMO SANTU.
Amen



Retranscription de Lydia NKODIA MUADI
Responsable du Service des Nouveaux Médias RATELKI EUROPE
Paris le 3 octobre 2013


 
 
Nous contacter | Plan du site Haut de la page
Copyright ©Kimbanguissme.net 2005 - Tous droits réservés