Accueil Kimbanguisme Théologie Histoire Nkamba, la nouvelle Jérusalem Simon Kimbangu Bibliothèque Déportation A propos de ce site
 
 
 
Bibliothèque
Messages et prières de chefs Spirituels


02.04.2014, Nkamba : Message de S.E. Simon Kimbangu Kiangani
Source : RATELKI EUROPE

Na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu,
le 2 avril ndenge tolandi na mateyi na biso. Ye mutu ateyi biso abandelaki na nzembo ya ba Yuda, ake na mibeko, mikanda na ye ya suka toyoki, tobomba, tosalela po mokolo wana tobika.
Mokanda mua Nzambe, tobengi Bible, ezali kosolola na Tata Nzambe. Bisika nionso tozalaka, tosambelaka, tolandaka mateyi, tosololaka na Tata Nzambe. Pona nini ? Biso toza na chance. Ekeke ya liboso soki tolongaka te, ya mibale tolongaka te, ya misato tolongaka te, oyo ya mineyi malamu tolonga. Pamba te lelo bapesi biso Yeluselemi. Loposo muindo aniokuami mingi. Oyo tosalelaka programme ya likolo. Ndenge bateyi bateyaki biso ete mokati ya mbila akueyi na tongo apesi mayele oyo bakomata na apres-midi. Eza lokola Bible kosolola na Tata Nzambe ezali makebisi mingi. Ezali kopesa biso mayele.
Soki totiki ba mboka, ba ville, toye na Nkamba Yeluselemi na date ya lelo, likambu mususu te ! Likambu ya Tata Molimo Santu, nzoto ewuti kuna na Katanga, ekomi na Kinshasa le 2 avril na Matadi-Mayo. Na mibu eleki ba fetes eza kolekela kuna na Matadi-Mayo kasi lelo oyo Nkamba Yeluselemi po totikali na devoir ya botongi ya Yeluselemi, ya kolakisa ke likambu ebandelaki na Nkamba libela libela. Yango toye puete totonga, tosala misala.
Bana Tata Simon KIMBANGU, programme oyo ewuta na likolo yango nde balakisi biso. Pamba te Papa Simon KIMBANGU na 1921 akangami, na 1951 batiki biso. Wapi ? Kuna na Katanga.
Mingi balobaka ete Tata KIMBANGU asalaki lingomba te. Mais tangu toza kolandela makambu nionso balobi te, Papa Mfumua Longo atikalaki na pouvoir ya kotambuisa lingomba. Ba Papas basali manso, balakisi bokonzi na bango.
Lelo oyo Surveillance ezali, to ba Surveillants bazali. Na bokonzi il faut kobanda kuna na likolo, ezali bongo. Kuna mpe na baweyi ezali bongo. Tomonaka soki mutu akomi na 1er poste, mutu ya liboso akotuna ye Surveillant. Toyokaka soki mutu akuti, ndenge toyebaka na 1er poste Surveillant ! Oke wapi ? Akotuna yo.
Soki biso to ndimelaki musala oyo, ndenge balobi na biso na moteyi, to Papa ateyi biso ke tozali bateyi. Place ozali kokota, eh mbuta muntu awa balongolaka sapatu, han,mutu alongoli. He awa balatelaka boye te, mutu wana abongami. Nionso wana ezali devoir na bino. Eza musala muke te, kasi musala munene ya koteya.
Sikoyo lingomba eke na mokili mobimba, tokolukama ! Tokende kolakisa, koteya, tokende koloba, kosala boye, yango nde ekokotisa biso na likolo. Yango nde to ndimelaki.
Kasi ngayi naza kozua ba rapports mingi. Ba tatas mususu, ba mamas mususu, ba ndeko mususu, ah Papa muana na biso akima na ye musala wana ya ki Surveillant akendaka lisusu te, muana wana asambelaka lisusu te, muana wana azonga sima. Eza pe na bana balobi ah tata na biso asambelaka lisusu te, to mama na biso asambelaka lisusu te ! Ki nkemgi bapesa ye asalaka lisusu te, ki selo asalaka lisusu te azonga sima. Ba plaintes wana eza malamu te ! Sala musala oyo yo ondimelaki. Ba erreurs ezala lisusu te ! Pona nini ? epayi towuti toyebi, epayi tozali kokende, toyebi te.
Nalandaki nzembo oyo AJACKS ayembaki, kobanda dimanche nalobelaki likambu wana. Nkolo Yesu alobelaka yango, Mfumua Longo aye kotia yango na libondeli ya le 6 avril. Sikoyo mayi ma ningani, likambo ekomi pembeni. Otikala na yo ou bien okota ? Ndenge to ndimeli kolanda Nkolo yesu, tosalela ye. Makambo ezali. Tolobaki bien, makambu oyo Nkolo Yesu alobaka, oyo Tata Simon KIMBANGU alobaki na 1921, oyo ba Papas balobi, tangu nango ekoki.
AJACKS soki azali ayemba lisusu, nga nazalaki te mais c'est sûr boyembaki nzembo wana. Likambo elali wana. Eza na kikongo mais l'heure bokobima libanda botuna, ou bien mutu aza wana ayebi kikongo, ayebi pe lingala, yo oyokaka te a expliquer yo makambu eza na kati.

(Cantique entonné par l'AJACKS)

Tomoni ke mokili eningani makasi. Likambo ya Tata Nzambe eza koluka nzela. Tango mosusu oza kolela mutu oyo akufi mais kuna aza kosala na ye. Mais batu wana balingi baya. Secret oyo ebombama elingi ebima. Tozala na esengo muana ya Tata Simon KIMBANGU sepela.
Tangu Papa Mfumua Longo , Papa DIANGIENDA alobaki ete na Manianga misala mingi ezali kuna, na Fleuve misala ekozala, na Kinzavuete compagnie ya munene ekozala kuna, ba places mingi balakisaki misapi. Oyo bakendaki koyekola bazali koya baza na nzela.
E biso tomibongisa pamba te toza na maplomes ebele, toyebi misala ya maboko mais misala emonanaka te ! Tangu Nzambe akosala likambu na ye toyebi te !
Ba nzembo eza kolakisa, ba nzembo ezali koteya, bateyi bazali koteya, ba pasteur bazali koteya, ba selo mpe bazali koteya. Oyo bazali kolota, bazali pe kolota, ba visions ezali koya tokoluka lisusu nini ? Yo kaka bongisa motema na yo.
Programme ya likolo, ba Papas balakisi biso. Lingomba yango oyo ndenge baza koteya biso, ndenge tobondelaka, ndenge tobalisaka, ndenge tosalelaka misala, batu baza koya po bayekola. Soki omoni ke obebisa ou bien ozonga sima, ou bien nini, sala tout. Bandimi mingi bazalaki na lingomba babimisa bango na lingomba to na nzela ya mabala to na ba conseils ya mabe, mingi bazonga sima. Tokoti na ba nzela mususu. Kasi likambo na ye ekomi pene, oko sala nini ? Ndenge nzembo eyembamaka na Choreki « oyamba nga » , ye kaka mutu akoyamba bino bongo nani mususu ?
Choreki soki azali nzembo ango nayokelaka yango epa na bino. E soki bongo pe soki bongo te likambo ezali, tango yango ya ko profiter.
Tosali mabe mingi, tobebisi pe mingi mais, ye alobi atandi maboko, maboko na ye eza ya kofonguama. Akoyamba na ye kasi tobongisa. Choreki !

CANTIQUE ENTONNE :

E e e ( nasili mayele )
petola ngayi Tata (petola nga)
motema na nga napesi yo opela ango ( e napesi na yo)
nzoto na ngayi mobimba napesi na yo
osalela ndenge elingi yo epayi na nga ( a )
longola bizaleli ya mabe epayi na nga ( a)
yo tonda yo Molimo Mosantu epayi na nga

losambo na nga (yo osenga na nga)
yokayango e Tata
kotiya ngayi mokongo te nabeleli yo ( e nabeleli yo)
longola mabe manso o petola nga ( na petuama )
nasalela na a bosembo n'elanga na yo (a )
nasepelisa yo Nzambe ngayi kino suka (a)
nasalela na a bosembo n'elanga na yo (a )
nasepelisa yo Nzambe ngayi kino suka

Oyamba nga oyamba nga Nkolo
kotika ngayi te ( kotika ngayi te )
nayeli yo olongisa nga
na motema na yo e Nkolo
nasalaki mabe mingi epa na yo (Nkolo)
olimbisa ngayi nalingi lisusu bongo te yakosalisa nga (a)
makasi na nga ezali moke (Nkolo)
simba nga loboko nalonga moyini satana pe na mabe na ye (a)
na motema na yo e Nkolo
nasalaki mabe mingi epa na yo (Nkolo)
olimbisa ngayi nalingi lisusu bongo te yakosalisa nga (a)
makasi na nga ezali moke (Nkolo)
simba nga loboko nalonga moyini satana pe na mabe na ye

(Oyamba nga )
Oyamba nga oyamba nga Nkolo
kotika ngayi te ( kotika ngayi te )
nayeli yo olongisa nga
na motema na yo e Nkolo
nasalaki mabe mingi epa na yo (Nkolo)
olimbisa ngayi nalingi lisusu bongo te yakosalisa nga (a)
makasi na nga ezali moke (Nkolo)
simba nga loboko nalonga moyini satana pe na mabe na ye


Merci CHOREKI...

Ba nzembo nionso mibale tokanisa makasi na nga ezali moke simba nga na loboko po oyamba ngayi. Po tango nango ekoki . Totala nanu tangu tobotamaka toyaka na ba anges, mutu na mutu na ange na ye. Esika nionso yo ekendaka na ange na yo azali kotala comme temoin.
Est -ce-que azali kaka ? Obebisa ou bien obebisa te ? Mingi bazongi sima, mingi bavandi na ba ndaku, tolingi lisusu kosambela te. Mais nzembo ya AJACKS alobi batu wana baza koya, baza koya na misala na bango bakendaki koyekola.
Nde yango wana tomibongisa. Mutu na mutu asalela Nzambe na solo malgré mabaku ezali mingi. Biso na biso tozali kopesanaka mabaku kasi yo sosola, kolanda oyo ya moninga te, sala oyo ya yo po obika. Nga kutu ata lobi likambu ango eye, probleme ezali te po toniokuami mingi. Kati na bolingo, mibeko pe misala , Tata, Muana pe Molimo Santu.
Amen.


Retranscription de Lydia NKODIA MUADI
Responsable du Service des Nouveaux Médias RATELKI EUROPE
Paris, 01 mai 2014


 
 
Nous contacter | Plan du site Haut de la page
Copyright ©Kimbanguissme.net 2005 - Tous droits réservés