Accueil Kimbanguisme Théologie Histoire Nkamba, la nouvelle Jérusalem Simon Kimbangu Bibliothèque Déportation A propos de ce site
 
 
 
Bibliothèque
Messages et prières de chefs Spirituels


06.04.2014, Nkamba : Message de S.E. Simon Kimbangu Kiangani
Source : RATELKI EUROPE

Na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu,
Topesi merci Tata Ministre na Papa Vice,
Bopesi biso makambo ya minene minene.
Biso tozalaka sima ya l'Etat.
Oyo asalaka likambo ya malamu babosanaka ye te.
Tokozua ndakisa Nkolo Yesu na ekuluzu na ba miyibi mibale. Moko asakanelaki Nkolo Yesu, mais mususu azalaki na maloba ya malamu. Na maloba na ye ya malamu, Nkolo Yesu alobi lelo kaka tokozala esika moko, esika ya Tata. Ndenge moko na Tata Simon KIMBANGU baye oyo basalaki ye malamu akobosana bango te. Ndenge moko pe na ba Tatas na biso, Papa KISOLOKELE, Papa DIALUNGANA na Papa DIANGIENDA KUNTIMA jamais babosana oyo mutu asalaki malamu. Biso pe moyen tobosana bino ezali te. Biso na lingomba toyembaka nzembo moko, nzembo wana pamba te esalaka biso pasi, mais banda lelo tozali sûr na Nzambe na biso tozui reponse na biso.
Esika Papa DIANGIENDA elobaki ete likambo ya Tata bato ya mayele bakoya, bakolobela likambo ya Tata Simon KIMBANGU. Tangu totindaka ba invitation na l'Etat to na mutu nionso, koya na bino epesaka biso esengo. Nga nalobaka na bandimi ke biso toza na makambu ya koloba lisusu te, ba oyo bazali koya, bakonzi bango nde baza na maloba. Lelo toyoki yango.
GTKI bongama, Tata Mfumua Longo yokela biso mawa ; soki pe moyen ezali ba professeurs, je m'excuse, mes respects, bomata likolo awa bino nionso oyo atangami professeur po likambo oyo elekeli biso. Ba papa Mbuinga batelema na bango kuna, mais biso totikali boya kotandama awa, kobanda kuna ti awa, puete likambo bosali ezali monene.
GTKI yemba nzembo entre temps bango baza komata. Oyo atangami azali professeur, na honneur na bino, beta maboko, beta maboko ( applaudissements dans le temple), ata epasuki, epasuka nango. Maboko maboko maboko, tandama kuna, botandama, voilà, maboko elemba te, elemba te.
Maboko eza kolemba ( pluie d'applaudissements) elemba te, elemba teeee. Merci merci merci, ellez pesa nzembo GTKI. Biso nionso tolanda nzembo nde nakozala na liloba ya suka.

CANTIQUE ENTONNE PAR GTKI :

Tata Mfumu a Longo yokela biso mawa e
Tata Mfumu a Longo yokela biso mawa e
pasi oyo ya moyindo nani abosani yango
e Tata ebanda na ebandeli

Tata Mfumu a Longo yokela biso mawa e
Tata Mfumu a Longo yokela biso mawa e
pasi oyo ya moyindo nani abosani yango
e Tata somo eleki

nakobanga lisusu nini ee Tata Tata limbisa biso (Tata)
nakobanga lisusu nini ee Tata Tata limbisa biso

opesi biso mabele ya talo Africa a Africa
Africa etonda bomengo Africa a
Africa etonda bomengo kasi mayele olongoli biso yango

otondisi biso biloko ya talo Africa a Africa
otondisi biso biloko bipayi bipayi na Africa a
kasi Africa eloko moko ezangi biso, se mayele

(E Nzambe) Nzambe yoka libota oyo mawa
(Nzambe yoka Africa mawa ) Nzambe yoka Africa oyo mawa

nakobanga lisusu nini ee Tata limbisa biso (Tata)
nakobanga lisusu nini ee Tata limbisa biso

Merci GTKI...

Likambo nalingi naloba yango oyo.
Lelo tomoni ba tatas professeurs bazali awa. Toza lisusu na mpasi te. Pasi na biso esi esila. Lelo lokola likambu tosengaka na Tata Simon Kimbangu ezali komonana muke muke. Tobandi komona bango abu (piaaa). Pamba te nzela esi efunguami. Na ndenge nini ? Na nionso Nzambe abongisela biso, tokomona yango. Ya mbala oyo o mutu muindu abebisaka kaka. Kobebisa lisusu te. Malgré bitumba ezali mingi, meme bango pe babundisaka bango, ba cales ezangaka te. Kasi Nzambe alobi hein, likambu nionso eza na tangu nango.
Est ce que papa Ntangu azali awa ? Papa Ntangu azali ? Amati te ? Ye wana nde bazali kosala ba kisi na pharmacie na ye ba nzete malaria, kisi ya malaria, ba kisi ya ndenge na ndenge bazali kosala. Et Nzambe asi afongoli etikali muke, ndenge Mfumua Longo alobaki, kisi ya sida mutu muindu akozua yango. Etikali muke.
Soki tolobi tango ekoki biso tokotika bango te. Ndenge tomoni bango, Nzambe akofongolela bango makambu ebele. Na bango batu baye na ba oyo batikali kuna eh bien likambu toza kozela, tolingi tomona yango.
Topesi merci na ba tatas professeurs, bolemba biso te, botika biso te. Toyebi ke Tata Simon KIMBANGU alobaki makambu mingi. Eh biso soki tolobi nani akoyokela biso ? Mais bino soki bolobi, bino na bino batu ya mayele, bakoyoka. Eza boye te ? ( bongoooo). Hein, lokola bobimisi buku na ye, pe mingi toza nango tokopesa bino bosala. Lokola boye kolakisa mitu na bino ah ben biso tokobanda kopesa kaka muke muke, muke muke, Ye moko Tata Simon KIMBANGU abosanaka bana na ye te, oyo ba Tatas balobaki na biso ekomonana.
Nzambe akosaka ? ( teeeeeee). Akosaka te hein ? ( ingeta Papaaaa). Nzela moko kaka yango oyo.Nzambe abosanaka muana na ye te ! Nzembo wana etikali muke tokoyemba yango lisusu te po Nzambe asi alakisi makambu ebele.
Merci merci merci boye kotala biso, biso tolingaka nde bongo. Totindi invitation, boye, biso tosepeli, toyoki oyo ewuti epa na bino moko, epesi biso esengo. Bino nde bokolemba biso mais biso tokolemba bino te. Fete nionso tokobanda kobengisa bino. Kuna mpe toyebi ke boza kobongisa ; tokozua lisusu retard te ! Po makambu nionso ekomi pembeni. Kosepela ya mutu muindu eza na nzela. Oyo bokosala ya makamuisi ezali, pe bozali kosala yango. Moyen toyeba ezali te eza nanu na se se.
Ye oyo mbuta muntu, bango nde baza kosala makambu oyo ezali ke loposo muindu, eloko basali epesi pe valeur na mutu muindu. Bango nionso basalaka makambu ezo pesa valeur na mutu muindu. Batambolaka na mikili ya ndenge na ndenge bakendaka. Soki nalobi ke etikali muke baya, elobama na ye moko Tata Simo KIMBANGU ke mutu muindu akosala biloko ya ndenge na ndenge. Biso pe toza na ¾ na biso, boyebi ou bien boyebi te ? (toyebiiiii Papaaa). Boyoka yango ou boyoka te ? ( toyokaaa yango Papa). Bango bazuaki combien ? (¼). Ebongo biso ? (¾). Nani alobaka yango?( Papa Simon KIMBANGU, Yo mokooooo). Yo moko wapi ? Ngayi te ! ( Yo mokooooo). E soki ozo tambola na nzela omoni matiti ya coco elakisi nini ? ( tokomi pene pene ya zandu). Okomi pembeni ya zandu hein ? (ingeta). Oyo batelemi awa pembeni te ? ( pembeniiii). Ya nini ? (ya yo moko). Nga nalobi kaka. Esengo elekeli biso, buku ebimi, makambu mususu eza na nzela. Oyo ezali ke soki otali mabele na biso awa na Afrique totongi nanu te ! Kolongua awa na Nkamba, Mbanza-Ngungu, vide ebele. Bilanga tosalaka ya muke kaka. Mais kasi tangu tokozua oyo ya biso oh toyebi te ! Kosepela ekozala.
Merci ba papas bokende kovanda, esengo nde eleki mingi. Tolie bino tangu kasi bolimbisa biso . Topesa bango mbote na kombo misatu, na kombo ya Tata, Muana, Tata Molimo Santu.
Ba buku na biso tozui yango, tokosala programme ya malamu puete tokende liboso.
Hein FAKI, nga moko nakopesa nzembo « azali Nzambe ». Azali Nzambe, tozonga na biso malembe malembe

La FAKI entonne la cantique :

Ozali Nzambe wa bomoyi solo obonguanaka te
liloba na yo se kino ekokisama
ozali solo Nzambe na nguya

bilaka opesaki na biso
bilongani (bilaka bia yo) bilongani
monisa nguya na yo Kimbangu
poso muindo asepela

(ozali Nzambe)
Kimbangu Molimo Santu
( Nzambe Kimbangu)
solo obonguanaka te


Retranscription de Lydia NKODIA MUADI
Responsable du Service des Nouveaux Médias RATELKI EUROPE
Paris, 01 mai 2014


 
 
Nous contacter | Plan du site Haut de la page
Copyright ©Kimbanguissme.net 2005 - Tous droits réservés