Accueil Kimbanguisme Théologie Histoire Nkamba, la nouvelle Jérusalem Simon Kimbangu Bibliothèque Déportation A propos de ce site
 
 
 
Bibliothèque
Messages et prières de chefs Spirituels


07.04.2014, Nkamba : Message de S.E. Simon Kimbangu Kiangani
Source : RATELKI EUROPE

Na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu,
Tolandaki mateyi na biso;
Tozui bandimi ya sika,
Na biso bandimi ya kala, na ya sika, totika mabe;
Tosala malamu, tobanga masumu ndenge tata "De la Ville" (1) alobi.
Tang'oyo tozali, tango ya ndenge mosusu.
Tomoni ke mokili eza ya koningana.
Likambo ya Tata Nzambe, eza koluka nzela.
Ndenge na likambo ya Tata Nzambe eza koluka nzela, sikawa biso bandimi tozala makasi.
Po ete na ba programmes na biso, oyo ba Tata batikela biso, tosala makasi tolonga.

Le 6 avril toyaki.
Avant toya, tozalaki na programme munene ya kosala misala ya nsinsani, na programme munene ya musée.
Tomati, ezo senga nde volonté puete musala oyo ewumela te.

Tokotaki na mobu ya centenaire na 2014.
Na 1914, ezalaka bitumba.
Mbotama ya Papa KISOLOKELE, guerre ebandi.
Na 1918 guerre esilaka.
Eh lelo oyo, centenaire ya Papa KULUTU, année mobimba.
Ndenge toza na kati, année oyo ya Papa KISOLOKELE tomoni oyo tomoni. Ba professeurs basali ya bango likambo. Oyo elobamaka kala kala na Papa Mfumua Longo, DIANGIENDA KUNTIMA ke bati ya mayele bakoya kolobela likambo ya TATA. Na Conference Intenationale ba professeurs nionso ya 5 continent bayaka balobaka likambo ya TATA Simon KIMBANGU. Lelo ekomami na buku mibale ya minene. Tolandaki bino bien.
Sikoyo biso nde tokosala musée. Makambo oyo ya 1921 ti tango oyo toza nango, nionso ekozala na kati na musée. Likambu nionso na 1921 bokangama na ye, kufa na ye na 1951. Toza na mikanda mingi. Oyo l'Etat Belge akomaka pona ye moko Tata Simon KIMBANGU, na ba PAPAS, na makambu nionso esalamaka, toza na yango ebele. Ekota na musée.
Maloba ya Tata na biso, misala na bango, biloko nionso bango basalelaka ekozala na musée. Ndenge naza koloba tango nionso ke tonneau wana babuakelaka ye na mayi ezali, chaine wana bakangelaki ye ezali. Munduki oyo ba tiraka ye ezali. Presque biloko nionso toza nango. Elakisi ke mokili tangu bakoya kotala likambu ya Tata Simon KIMBANGU mutu akotia lisusu tembe akozala te ! Bayaka na bango, tolakisaka bango awa nde aza kopesa mapamboli, awa ndaku na ye, kuna nde asalaki miracle, kandia bola asalaki boye, na Tadi asalaki boye. Bien sur, kasi oyo mususu ezangi ? Po buku oyo balakisaki lobi ekokende mokili mobimba bakotanga yango. Ekobenda batu bakoya ebele, batu ya mayele mususu. Sikawa musee il faut ye moko akoti atali, tembe ekozala lisusu te. Oyo ekozala ke, ah bino bopesi biso sango na retard. Biso moko kolo eloko tozomona yango en l'air te. Mais mingi na RDC, Congo Brazza na Angola kososola ke toza na likambo monene. Oyo ya nzinga nzinga baza komona kaka ah ba kimbanguistes bazali kosala fete na bango, ba kimbanguistes bazali kosala nsinsani na bango.mingi pe na kati na lingomba toyaka kosambela, osambeli ozongi na yo. Mingi tina ya likambo bayebi te. Nzambe abongisela biso likambo munene. Kowelela kaka independance tozua yango na RDC, mingi bakomaka. Maitre Croquet, mundele, avocat ya liboso awelelaka likambu ya Tata Simon KIMBANGU. Ba PAPAS nini basali te ? Est ce que batu nionso bayebi likambu wana ? Te ! Tokobanda koyeba yango muke muke nini ezalaka et nini ezali.
Mingi bakomi na bango,mais oyo tosali sikoyo eza likambo ya suka. Pe na ba professeurs wana tozo continuer na bango, nanu tosilisi te. C'est vrai, tangu ya crise toza na mbongo te, mais tozo mona pasi eza na mokili. Mokili eza na pasi biso baye tosambelaka bino nde tokotia kimia. Biso baye toyebi Nzambe biso baye tokotia kimia na mokili mobimba.
Yo otangami ozali mondimi, na oyo programme nzambe azali kopesa biso tolemba te.
Nzambe alingi akata likambo na ye. Pasi eleki. Mingi pe ba innocents bayebi likambo te baza kokufa, bazali komona pasi. Batu wana nde bango bakoya koniokola biso. Na ndnege nini ? Likambo ye akufela ayebi yango te, akeyi kaka. Tangu ekozala ke Nzambe alingi akata likambo na ye, batu wana tangu bakoya, misu ya pamba ozali te !
Mukolo wana nalobaki likambu, ezalaki lobi, Nkoloo yesu ye wana na ekuluzu na ba miyibi mibale, moko nde azali mabe, alobaki mabe pona Nkolo Yesu, mais moko alobaki likambu ya malamu. Nkolo Yesu atali ye alobi kaka lelo ekoleka te. Oyo asalaka bolamu Nzambe abosanaka ye te ! Na tangu ya Tata simon KIMBANGU batu mingi basalaki ye mabe batu mingi pe basalaki ye malamu. Mais mabe kaka moko nde nakolakisa : Tata KIMBANGU ake na Kinshasa, bazui na compagnie mbila, nde baza kofuta ye te ! Baninga na ye basalisi ye asala commerce esimbi te. Balobi kaka malamu ozonga na mboka. Asombi ba nzombo na ye pona bana, na nzela babotoli yango na Kasangulu. Punition nini mutu wana azuaki ? Biloko nionso akolia nzombo na nzombo, goût mususu te kaka yango wana. Pona Nzambe alakisaki mabe, ayibi ye biloko na ye. Biso na biso peut etre c'est bien, mais na Nzambe etumbu ya libela. Alors alukakai moyen nionso akufa. Atie, akangi singa na nzete atie pe na kingo po akufa na ye, mais akufaka te. Okomona akufi, l'heure akokueya na se, bien mutu amoni ye, alamuki na ye. Liwa eza koya te ! Soki na 1963/1964 soki nabosani te, akendaki na Monkoto epayi ya Papa asengi bolimbisi. Sima ya mikolo nde akendaki na ye. Mais entre temps, ba mbula nionso tout ye avandaki pasi na pasi. Et surtout soki osaleli Nzambe na yo mabe, ekozala ndenge nini soki otiki mokili oyo ?
Koniokola batu eza pe lisumu. Motioli, mutu ya lolendo, oyo afingaka, esika na bango ezali te ! Alors mokili ezali komona pasi, biso faut tosambela. Lelo toyambi batu Nzambe asepeli. Ndenge Papa Mfumua Longo azalaki koloba lelo kaka soki bayambi yo okomi mondimi, okufi directement okoti likolo.directement !
Ndenge Tata De La Ville alobi ezali te tango nionso totubelaka, totubelaka, tosalaka ba mbeba, te, esengeli te ! Tosilisa mbala moko Nzambe alingi akata mokano na ye. Tolingi na 2016 tofongola musée wana. Ba papas pasteurs, tobengami ba responsabletozo diriger fete ya Mama MUILU ekoya na bapaya mingi. Topesa ba mamas maboko na ba programmes bakozala nango mikolo oyo etikali tosalisa ba mamas. Ba paya oyo bakoya, oyo baye tango ya le 6 te bakoya le 27, ba mususu bakoya le 8 juillet. Na ba programmes nionso tozala bien tango nionso ke ba fetes na biso ekomi pembeni tosalaka makasi, likambo ezali.
Ndenge nga nalobaki, biso tokoloba lisusu te, oyo bazoya kotala biso nde makambo eza epayi na bango. Lobi toyokaki ba temoignages ya ndnege na ndenge, maloba ya ndnege na ndenge. Batu ya mayele baye, biso nionso tomoni bango, tobetelaki bango maboko po nanu tomona te mutu ya mayele aya ko temoigner likambu ya Tata Simon KIMBANGU, basala buku ya monene pona Tata Simon KIMBANGU. Kasi tolobaki bien, Tata Mfumua Longo alobaka yango avant likambo Nzambe alobi, ata ewumeli ekosala ekoleka te. Si toyoka makambu mingi ba Tata basi balobi tokomi komona yango.
Ba mbuta tosepeli mingi, toye mingi malgré pasi kasi Tata asalisi biso. Na ba fete ya boye, oyo ezali ke le 6 avril ebandeli ya musala tozangisaka te po makambu mazali. Tolobaka ah retard, retard, te ! Retard na biso pona botongi ya Yeluselemi, toyebi ke toza na rtetard ya 10 ans tobunda nango esika oyo tobimisi likambo ya musée. Makambu ya CADEKI tolobaki nanu esalami te mais balobi tofongola ba comptes. Mais awa falais tozala na place na biso. Mutu aza na Etats-Unis aye awa alobi mbongo na ngayi eza boye na boye o virer kaka mbala moko. Sikoyo moyen ezali te. Tolobela yango kasi esalemi te. Ya musée tosala. Soki tosilisi musée eleki makambu mususu etikali ekokende mbangu.
Pona kolalisa batu tozo tonga, muke muke toza kokende. Elakisi ke makambu mazali. Mboka Yeluselemi toza kolakisa biso nde tokomema sango. Kaka ba buku mibale oyo esalemi batu bakotanga bakoya ebele. Sango esi ekeyi. Ba internet eza kosala butu moyi batu baza kolanda biso. Oyo balekaki lobi partout mokili mobimba si bayoki sango. Bakomi kosenga ba buku wana tokozuela yango wapi, tokosomba wapi ? Tozali kobengama. Elakisi ke totikali lisusu sima te, avant avant.
Tosilisi na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu.
Amen



Retranscription de Lydia NKODIA MUADI(2)
Responsable du Service des Nouveaux Médias RATELKI EUROPE
Paris, 04 mai 2014
Notes:
[1]Tata "De la ville": pour désigner le Responsable de la ville Saint, Nkamba
[2] Ce texte a subi quelques rectificatifs du Webmaster


 
 
Nous contacter | Plan du site Haut de la page
Copyright ©Kimbanguissme.net 2005 - Tous droits réservés